Les Congolais Debout ! ezali lisangani ya ba Congolais nionso
Boya tosangana
« Congolais inso azali na lotomo ya ko bebisa makanisi ya moto inso, to pe ya lingomba ya bato inso oyo ba zuwi ki bokonzi na makasi to pe oyo bazali ko salela yango na bokeseni pe bo buki mabongisami ya mibeko ya mboka iye na kombo ya constitution. »
ARTICLE 64.1
Les Congolais debout kati na etando
Kati na etando na sima ya misala ya bo panzi sango pe ya lilako ya batu ebele ko leka, nde toko bikisa demokratia ya ekolo na biso. Mposa wa biso ezali ko mema sango oyo na ba ndeko Congolais manso na bisika nyonso bazali, na bokeseni ya mibu songolo te, na bo keseni ya mobali to pe mwasi te, to pe na misala na biso pe te, mpo ete soki to sangani biso banso elongo tokoki ko bongola ekolo na biso pe ko longola yango na mikakatano manso ezali na kati na mboka.
Telemisa ba ndeko nzinga nzinga na yo
Bisika binso ba congolais bazali ko sangana, ata na bo keseni na bato, kasi lingomba ezali kosalema pembeni na likanisi moko iye to zali ko tonga elongo pe na ba mbenza to motuya moko.
Forum na biso
Boya to kabola makanisi pe to tonga likanisi iye na ba masolo nakati ya forum na biso.

Ba Comité local
Bokoki kosala ba mangomba ya étonga na bisika inso bo vandi. Bo pusana pembeni na biso po na ko yeba lolenge nini ko sala.
To telema elongo pona ekolo mwa biso
Ekolo Congo ezali na posa na biso
To luka pe to talisa ba ndeko inso po ete elongo banso to kaola ndembo ndambo mosala ya ko bongola ekolo Congo.
Ba sango
Mituna na bino , Eyano na biso
Tozali ko tosa oyo ezali likoki ya moko na moko na ko zala na katikati ya lingomba politiko songolo to pakala pe ko bunda po na parti politiko wana. Na yango nde biso to kanisaki ko zala lingomba lya bato na esika ya ko zala parti politiko pamba te, na mabe oyo ezali ko komela ekolo na biso to sengeli to sala lisanga ya monene monene ko leka
Ko bunda po na ba droit na biso, ya alternance, ya justice mpe po ya kimya, ezali bitumba ya biso banso. Ezali kaka biso banso elongo, na bo sangani sima ya likanisi moko mpe na bolongoli bo keseni na biso ya bo moto to pe ya politiko nde toko bebisa mabe iye ezali kati na ekolo na biso Congo.
Ko telema ina epesameli biso pe na kati ya mabongisi ya mibeko ya mboka na biso oyo to bengi constitution.
Mikolo nionso telemisa ata 5 to pe 10 ya ba ndeko oyo bazali pene na yo , pe senga bango ba mikomisa na “les Congolais debout”.